Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 99

Bogumbamela Yawe, pamba te azali Mosantu

Yawe azali kokonza ;

tika ete bato balenga !

Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ;

tika ete mabele eningana !

Yawe azali monene kati na Siona,

mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.

Tika ete Kombo na Yo ya monene

mpe ya somo esanzolama ;

ezali bule !

Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo.

Olendisaka bosembo.

Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.

Bonetola Yawe, Nzambe na biso,

mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ;

azali Mosantu.

Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye,

mpe Samuele kati na bato

oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye,

bazalaki kobelela Yawe,

mpe Ye azalaki koyanola bango.

Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata.

Babatelaki malako na Ye

mpe mibeko oyo apesaki bango.

Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango.

Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka

atako opesaki bango etumbu

mpo na misala na bango ya mabe.

Bonetola Yawe, Nzambe na biso,

mpe bogumbama na kotala

na ngambo ya ngomba na Ye ya bule.

Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.