Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 100
Yawe asanzolamaka kati na bato na Ye
Nzembo ya kozongisa matondi.
Bino nyonso bato ya mokili mobimba,
boganga na esengo epai na Yawe !
Bosalela Yawe na esengo,
mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.
Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ;
Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye.
Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,
bokota na lopango na Ye na kokumisa.
Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
Pamba te Yawe azali malamu ;
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko,
mpe boyengebene na Ye, libela na libela.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.