Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 101
Komipesa mpo na kobundisa mabe
Nzembo ya Davidi.
Nakoyemba bolingo mpe bosembo ;
nakoyembela nde Yo, Yawe.
Nakolanda na bokebi nzela ya bato
oyo bazangi pamela.
Okoya epai na ngai tango nini ?
Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu
na motema ezangi pamela.
Nakotala eloko moko te ya mabe ;
nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima,
ekoki kokangama na ngai te.
Mosika na ngai, motema ya kilikili ;
naboyi kosala mabe.
Nakosala ete avanda kimia,
moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta
mpo na kobebisa lokumu ya baninga.
Nakokoka te kotala moto ya lolendo
mpe moto ya lofundu.
Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili
mpo ete bavanda pembeni na ngai ;
moto na etamboli ezanga pamela
nde akozala mosali na ngai.
Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ;
liboso na ngai, mokosi akotelema te.
Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe
kati na mokili bavanda kimia ;
nakolongola na engumba ya Yawe
bato nyonso ya mabe.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.