Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 98
Nzambe azali koya kosambisa mabele
Nzembo.
Boyembela Yawe nzembo ya sika,
pamba te asalaka makambo ya kokamwa !
Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe,
alongaki.
Yawe atalisaki elonga na Ye,
amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.
Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye
mpo na libota ya Isalaele.
Kino na suka ya mokili,
elonga ya Nzambe na biso emonanaki.
Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko,
boyemba banzembo ya esengo
mpe bobeta mindule !
Bobetela Yawe lindanda,
boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !
Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi,
na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.
Tika ete ebale monene elongo na nyonso
oyo ezali kati na yango,
mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !
Tika ete bibale ebeta maboko
mpe bangomba nyonso eganga na esengo
liboso ya Yawe, pamba te azali koya
kosambisa mabele !
Akokata makambo na yango na bosembo.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.