Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 97

Nzambe Monene ya mokili mobimba

Yawe azali kokonza !

Tika ete mabele esepela ;

tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !

Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye,

bosembo mpe bosolo ezali miboko

ya Kiti na Ye ya Bokonzi.

Moto etambolaka liboso na Ye,

ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.

Mikalikali na Ye engengisaka mokili ;

mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.

Bangomba enyangwamaka lokola mafuta

liboso ya Yawe,

liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.

Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye,

mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.

Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko,

bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta !

Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !

Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli ;

bingumba ya Yuda ezali na esengo

mpo na mikano na Yo !

Pamba te, na mokili mobimba,

Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ;

oleki banzambe nyonso.

Bino bato oyo bolingaka Yawe,

boyina mabe !

Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye

mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.

Moyi elonami mpo na moto ya sembo,

mpe esengo, mpo na bato

oyo bazali na mitema alima.

Bino bato ya sembo,

bosepela kati na Yawe ;

bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.