Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 96

Mokili mobimba esanzolaka Yawe, Mokonzi na yango

(Nz 105; 106; 1Ma 16.23-33)

Boyembela Yawe nzembo ya sika !

Bino nyonso, bato ya mokili mobimba,

boyembela Yawe !

Boyembela Yawe,

bopambola Kombo na Ye !

Bopanza sango ya lobiko na Ye,

mokolo na mokolo !

Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !

Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa

kati na bikolo nyonso.

Pamba te Yawe azali monene

mpe abongi na lokumu,

azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.

Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba,

nzokande Yawe akela likolo.

Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,

nguya mpe nkembo ezali

kati na Esika na Ye ya bule.

Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe ;

bosanzola Yawe na kopanza

sango ya nkembo mpe nguya na Ye !

Bosanzola Yawe mpe bopesa

Kombo na Ye nkembo !

Bomema makabo na bino,

bokota na lopango na Ye !

Bogumbama liboso ya Yawe

oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi !

Bino bavandi ya mokili mobimba,

bolenga liboso na Ye !

Boloba kati na mabota :

« Yawe azali Mokonzi !

Mokili elendisama makasi, ekoningana te.

Yawe asambisaka bato na bosembo. »

Tika ete likolo esepela,

mpe mabele ezala kati na esengo !

Tika ete ebale monene elongo na nyonso

oyo ezali kati na yango epesa lokito !

Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso

oyo ezali kati na yango esepela,

mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga

na esengo

liboso ya Yawe, pamba te azali koya !

Solo, azali koya kosambisa mabele ;

akosambisa mokili na bosembo,

mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.