Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 92

Ezali malamu kokumisa Yawe

Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.

Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe

mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na

Yo-Oyo-Oleki-Likolo !

Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo,

na tongo,

mpe boyengebene na Yo, na butu,

na lindanda ya basinga zomi

mpe na nzenze !

Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai !

Nagangaka na esengo liboso ya misala

ya maboko na Yo.

Yawe, misala na Yo ezali minene,

mpe makanisi na Yo ezali mozindo !

Moto ya kilikili ayebaka te,

mpe zoba asosolaka eloko moko te.

Tango bato mabe bakolaka lokola matiti,

mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka,

ezalaka nde mpo ete babebisama libela.

Kasi Yo, kuna na likolo,

ozali Yawe mpo na libela.

Yawe, banguna na Yo,

banguna na Yo bakokufa penza ;

bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.

Okomisi ngai makasi lokola mpakasa,

opakoli ngai mafuta ya sika.

Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai,

mpe matoyi na ngai ekomi koyoka

banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa

mpo na kosala ngai mabe.

Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila,

bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.

Lokola bapikama ngwi

kati na Tempelo ya Yawe,

bamonaka bolamu kati na lopango

ya Nzambe na biso.

Ata bakomi mibange, babotaka kaka,

bazalaka kaka makasi mpe kitoko,

basakolaka : « Yawe azali alima,

azali Libanga na biso ;

kati na Ye, mabe ezali te ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.