Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 93
Yawe akonzaka mpo na libela na libela
Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ;
Yawe alati penza lokumu monene
mpe amizingeli na nguya.
Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ;
seko na seko, ozali.
Yawe, bibale egangaka !
Bibale etombolaka lokito na yango ;
bibale etombolaka makelele na yango.
Yawe azali monene makasi,
na bisika ya likolo ;
aleki lokito ya mayi minene,
mpe bambonge milayi ya ebale monene.
Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ;
bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.