Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 91

Ebombamelo ya malonga

Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo

ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo

avandaka na se ya bobatelami

ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

Nalobaka na tina na Yawe :

« Nzambe na ngai azali ebombamelo

mpe ndako makasi na ngai ;

natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »

Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo

ya mokangi bandeke

mpe na bokono oyo ebikisaka te.

Abombaka yo na se ya mapapu na Ye,

mpe ozwaka ebombamelo ya malonga

na se ya mapapu na Ye ;

bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba

mpe lokola elamba ya ebende.

Okobanga te somo ya butu,

makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,

bokono oyo etambolaka kati na molili

mpe pasi oyo ebebisaka na midi.

Ezala bato nkoto moko bakweyi

pembeni na yo,

mpe bato nkoto zomi,

na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

ekozwa yo ata moke te.

Okotala kaka na miso na yo

mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali

kozwa etumbu lokola lifuti na bango.

Soki otatoli :

« Yawe azali ebombamelo na ngai, »

mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,

mabe ata moko te ekokweyela yo,

pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ;

pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye

ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.

Bakomema yo na maboko na bango

mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ;

okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa,

okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.

Lokola akangami na ngai, nakokangola ye ;

lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye.

Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ;

nakozala elongo na ye na tango ya pasi,

nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.

Nakopesa ye bomoi molayi

mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.