Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 62

Nazwaka na kimia kati na Nzambe

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.

Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ;

lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.

Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;

azali ebombamelo na ngai,

nakoningana te.

Kino tango nini bokosangela moto moko ?

Kino tango nini bino nyonso bokosangana

mpo na koluka koboma ye

lokola mir oyo etengami,

lokola lopango oyo esili kokweya ?

Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye

wuta na esika na ye ya likolo,

basepelaka kotatola lokuta.

Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ;

kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.

Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe,

pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.

Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;

azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.

Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;

libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai

ezali kati na Nzambe.

Botielaka Ye elikya tango nyonso,

bosopaka mitema na bino liboso na Ye,

pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.

Solo, bato bazali lokola molunge,

bazali lokola lokuta ;

Soki batie bango na emekelo kilo,

ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.

Botiaka elikya te na mileki ya moyibi,

mpe botielaka yango motema te ;

soki bomengo na bino ekomi ebele,

bokangama na yango te.

Nzambe alobaki mbala moko,

ngai nayokaki mbala mibale :

« Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;

mpe bolingo ezali ya Nkolo ; »

mpe « ofutaka moto nyonso

kolanda misala na ye. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.