Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 63

Boboto ya Nzambe eleki bomoi na motuya

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.

Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ;

nazali koluka Yo,

molimo na ngai ezali na posa na Yo,

bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi,

kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.

Natalaki Yo kati na Esika ya bule

mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.

Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi,

bibebu na ngai ekosanzola Yo.

Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba,

nakotombola maboko na ngai

mpo na lokumu ya Kombo na Yo.

Nakotonda lokola moto oyo asili kolia

misuni kitoko mpe mafuta ;

bibebu na ngai ekoganga na esengo

mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai,

nasambelaka Yo na butu ;

pamba te ozali lisungi mpo na ngai,

mpe nagangaka na esengo

wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.

Nakangami na Yo ;

loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.

Bato oyo balukaka koboma ngai

bakozinda na mabele

Bakoboma bango na mopanga

mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.

Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe ;

moto nyonso oyo alapaka ndayi

na Kombo ya Nzambe

akomikumisa mpo na yango,

pamba te minoko ya bakosi ekokangama.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.