Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 61
Bomba ngai na se ya lipapu na Yo
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.
Oh Nzambe, yoka koganga na ngai,
yoka na bokebi losambo na ngai.
Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo,
motema na ngai ebukani !
Mema ngai na libanga oyo eleki likolo
epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.
Pamba te, ozali ebombamelo na ngai,
ndako molayi batonga makasi,
liboso ya banguna na ngai.
Posa ya motema na ngai ezali :
kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo
mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.
Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai,
opesaki ngai libula ya bato
oyo batosaka Kombo na Yo.
Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ;
tika ete awumela na bomoi.
Tika ete awumela na bokonzi
libela na libela liboso ya Nzambe !
Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.
Boye, nakoyemba mikolo nyonso
mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
mpe nakokokisa bandayi na ngai
mokolo na mokolo.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.