Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 60

Tokolonga kaka

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato. Ayembaki yango tango abundisaki bato ya Siri ya Mezopotami mpe bato ya Siri ya Tsoba, mpe tango Joabi azongaki, sima na ye kolonga bato nkoto zomi na mibale ya Edomi, na bitumba kati na Lubwaku ya Mungwa.

Oh Nzambe, obwakaki mpe opanzaki biso,

osilikaki penza.

Sik’oyo, zongisa biso.

Solo, oningisaki mabele mpe obukaki yango.

Bamba madusu na yango,

pamba te ekomi koningana.

Omonisaki bato na Yo pasi makasi,

omelisaki biso vino oyo elangwisaka.

Opesaki na bato oyo batosaka Yo bendele

mpo na koyebisa bango

ete bakima liboso ya batolotolo ya banguna.

Mpo ete balingami na Yo bakangolama,

bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali,

mpe yanola biso ! Yanola ngai !

Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule :

« Nakolonga ! Nakokabola Sishemi

mpe nakomeka molayi ya lubwaku ya Sukoti.

Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ;

Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende,

mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.

Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka,

Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai.

Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »

Nani akomema ngai kino na engumba

oyo batonga makasi ?

Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?

Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso,

Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba

elongo na mampinga na biso ?

Yaka kosunga biso,

kangola biso liboso ya moyini ;

pamba te lisungi ya bato ezali pamba.

Nzokande, elongo na Nzambe,

tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ;

ezali Ye nde akonyata banguna na biso.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.