Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 57

Kimia na kati ya banguna

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.

Oh Nzambe, yokela ngai mawa !

Yokela ngai mawa,

pamba te nazali koluka ebombamelo ;

nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo,

kino tango ya pasi ekoleka.

Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo,

epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.

Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai,

akopamela bato oyo batungisaka ngai.

Nzambe akomonisa bolingo

mpe boyengebene na Ye.

Nazali na kati-kati ya bankosi ;

nalali na kati-kati ya bato

oyo babomaka mpe baliaka bato,

oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo,

mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.

Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ;

tika ete nkembo na Yo ezala

awa na mokili mobimba !

Batiaki monyama na makolo na ngai

mpo ete nakangama,

batimolaki libulu liboso na ngai,

kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.

Nzambe, lendisa motema na ngai ;

Nzambe, lendisa motema na ngai.

Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.

Lokumu na ngai, lamuka !

Lindanda mpe nzenze, bolamuka !

Nalingi kolamusa tongo.

Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota,

nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.

Pamba te bolingo na Yo ezali monene,

ekenda kino na Lola ;

mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ;

mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.