Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 58

Nzambe, Mosambisi ya sembo ya bakambi mabe

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te. » Nzembo ya Davidi.

Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ?

Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?

Te, ezala kati na mitema na bino,

bosalaka mabongisi ezanga bosembo ;

botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.

Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango,

bapengwaka mpe balobaka lokuta

wuta na mabumu ya bamama na bango.

Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka,

lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te,

oyo ekangaka litoyi na yango,

oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na soloka

mpe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.

Nzambe, buka minu na bango

kati na minoko na bango ;

Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.

Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ;

Tika ete bambanzi na bango ebukana

tango babetaka batolotolo.

Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe,

lokola mwana oyo akomona moyi te

mpo ete abimi na zemi oyo esopani.

Liboso ete banzungu na bino ekutana

na moto ya basende,

ezala ya mayi to ya kokawuka,

bato mabe akolimwa.

Moto ya sembo akosepela,

pamba te akomona Nzambe

kozongisela bato mabe, mabe na mabe,

mpe akotambola kati na makila na bango.

Mpe bato bakoloba :

« Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo ;

solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.