Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 56

Elongo na Nzambe, kobanga ezali lisusu te

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati.

Nzambe, yokela ngai mawa,

pamba te bato bazali kotungisa ngai.

Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.

Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ;

bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.

Mokolo oyo nazalaka na bobangi,

natiaka elikya na ngai kati na Yo.

Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ;

Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te.

Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ?

Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso ;

mabongisi na bango nyonso ezalaka

mpo na kosala ngai mabe.

Basalaka makita, babombamaka,

balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.

Mpo na makambo oyo ya mabe,

boni, bazanga etumbu ?

Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !

Solo, oyebi motango ya matambe

ya bomoi na ngai ya mitelengano.

Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo,

oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.

Bongo, na mokolo oyo nakobelela

mpo na kosenga lisungi,

banguna na ngai bakozonga sima.

Na nzela ya likambo yango,

nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.

Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye,

pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,

pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema

mpe nazalaka na bobangi te,

moto akoki kosala ngai nini ?

Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai

mpe nakobonza bambeka ya matondi.

Pamba te okangoli ngai na kufa

mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te,

mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe

kati na pole ya bomoi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.