Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 53
Bato nyonso babungi nzela
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite.
Bazoba bamilobelaka :
« Nzambe azali te. »
Makanisi na bango esila kobeba,
basalaka makambo mabe mpe ya nkele ;
moko te asalaka bolamu.
Wuta na likolo, Nzambe atalaka bato
mpo na koluka koyeba
soki ezali ata na moko ya mayele,
oyo atalelaka Nzambe.
Bango nyonso bazali batomboki,
bango nyonso bamibebisa ;
moko te asalaka bolamu,
ata moto moko te.
Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ?
Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa
mpe batikala nanu kobelela Nzambe te,
bazali penza kososola eloko moko te ?
Somo monene ekokanga bango
na esika oyo ezali ata na eloko moko te
oyo ekoki kopesa bango somo,
pamba te Nzambe apanzi mikuwa ya bato
oyo bayei kobundisa yo.
Okoyokisa bango soni,
pamba te Nzambe abwaka bango.
Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona !
Tango Nzambe akobimisa bato na Ye na bowumbu,
bakitani ya Jakobi bakosepela,
mpe Isalaele ekozala na esengo.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.