Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 52

Suka ya mozwi oyo anyokolaka bato

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.

Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa

na tina na mabe ?

Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.

Yo oyo otambolaka na lokuta,

lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi,

ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.

Olingaka mabe koleka bolamu,

lokuta koleka koloba bosolo.

Oh lolemo ya lokuta,

olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.

Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela,

akokanga yo kati na ndako na yo,

akobwaka yo libanda

mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.

Bato ya sembo bakomona

mpe bakokoma na somo,

bakotiola ye na maloba oyo :

« Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe

lokola ebombamelo na ye,

azalaki kotiela bozwi na ye motema,

mpe kobakisa makasi na ye

na nzela ya kobebisa bato mosusu. »

Kasi ngai, kati na Ndako na Yo,

nazali lokola nzete ya olive

oyo etondi na makasa ya mobesu ;

natiaka tango nyonso elikya na ngai

kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.

Nakosanzola Yo mikolo nyonso,

mpo na oyo osali ;

mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo,

pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.