Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 54
Nzambe akangoli ngai
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »
Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo,
longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,
yoka maloba ya monoko na ngai.
Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ;
mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai,
batalelaka Nzambe te.
Tala, Nzambe azali lisungi na ngai,
Nkolo azali eyekamelo na ngai.
Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe !
Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu,
nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe,
pamba te ozali malamu.
Okangoli ngai na pasi nyonso ;
mpe miso na ngai etali
lokola molongi ya banguna na ngai.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.