Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 150

Bokumisa Yawe na mindule

Bokumisa Yawe !

Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule,

bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene

epai wapi avandi na nguya makasi !

Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye !

Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !

Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ;

bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !

Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina !

Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !

Bokumisa Ye na lokito ya manzanza !

Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !

Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !

Bokumisa Yawe !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.