Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 149

Yawe alingaka bato na Ye

Bokumisa Yawe !

Boyembela Yawe nzembo ya sika,

bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene !

Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye !

Tika ete bato ya Siona bazala na esengo

mpo na Mokonzi na bango !

Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ;

tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda !

Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye,

alatisaka babola motole ya elonga.

Tika ete bayengebene na Yawe basepela

kati na lokumu oyo ;

tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango !

Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango

elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale

kati na maboko na bango

mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo

mpe kopesa bato etumbu ;

mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo,

kokanga bato na bango ya lokumu na mabende

mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango !

Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso.

Bokumisa Yawe !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.