Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 148

Kati na likolo mpe na mabele

Bokumisa Yawe !

Bokumisa Yawe wuta na likolo,

bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.

Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ;

bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso ;

bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ;

bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka ;

bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo,

mpe bino mayi oyo bozali na likolo !

Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe !

Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.

Atiaki yango mpo na libela ;

apesaki mibeko oyo ekobongwana te.

Bokumisa Yawe wuta na mokili,

ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,

ezala moto to mvula ya mabanga,

ezala mvula ya pembe to londende,

ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;

ezala bangomba milayi to bangomba mikuse,

ezala banzete oyo ebotaka bambuma to banzete ya sedele,

ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso,

ezala bikelamu oyo etambolaka na libumu to bandeke,

ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso,

ezala bakambi to batambolisi nyonso ya mokili,

ezala bilenge mibali to bilenge basi,

ezala bampaka to bana mike !

Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe !

Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ;

nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.

Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye !

Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso,

bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye,

basengeli kokumisa Yawe mpo na yango.

Bokumisa Yawe !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.