Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 15
Nani akoki kovanda esika moko na Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ?
Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ?
Ezali moto oyo azangi pamela,
oyo asalaka makambo ya sembo
mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;
oyo akoselaka moninga makambo te,
asalaka ye mabe te,
mpe ayokisaka ye pasi te ;
asanganaka te na moto oyo asalaka mabe,
kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ;
akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi,
mpe abongolaka mokano na ye te ;
asengaka mileki te soki adefisi mbongo,
andimaka kanyaka te
mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te.
Moto nyonso oyo atambolaka bongo
akotikala kopengwa te.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.