Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 16

Nzela ya bomoi

Nzembo ya Davidi.

Nzambe, batela ngai,

pamba te nabombami kati na Yo.

Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai,

Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »

Natatolaka na tina na basantu

oyo bazali kati na mboka

ete bazali penza bato minene

oyo nasepelaka na bango makasi.

Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai

ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi.

Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana

mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.

Yawe, Yo moko kaka nde ozali

libula mpe bomoi na ngai ;

ozali ndanga ya bozwi na ngai.

Nazwi etando ya motuya makasi,

ezali libula ya kitoko penza mpo na ngai !

Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli

mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.

Natalelaka Yawe tango nyonso,

pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.

Yango wana motema na ngai etondi na esengo,

molimo na ngai ezali kosepela,

nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.

Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi,

okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.

Okolakisa ngai nzela ya bomoi ;

okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo,

elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.