Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 14
Mokili ezali ya kobeba
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Bazoba bamilobelaka :
« Nzambe azali te. »
Makanisi na bango esila kobeba,
basalaka makambo ya nkele,
mpe moko te asalaka bolamu.
Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato
mpo na koluka koyeba
soki ezali ata na moko oyo azali na mayele,
oyo atalelaka Nzambe.
Bango nyonso babunga nzela,
bango nyonso bamibebisa ;
moko te asalaka bolamu,
ata moto moko te !
Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ?
Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa,
babelelaka Yawe te !
Somo monene ekangi bango,
pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.
Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola
kasi Yawe azali ebombamelo na ye.
Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona !
Tango Yawe akobongisa bato na Ye,
bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.