Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 13

Kobanga mpe kolikya

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ?

Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ?

Kino tango nini nakozala mawa-mawa

kati na motema na ngai

mpe nakomitungisa mikolo nyonso ?

Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ?

Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai.

Sala ete miso na ngai emona malamu ;

soki te, nakokufa,

bongo monguna na ngai akoloba :

« Nalongi ye, »

mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.

Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo,

mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo.

Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe,

pamba te asaleli ngai bolamu.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.