Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 12

Nzambe akokisaka bilaka na Ye

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.

Yawe, sunga biso !

Pamba te bayengebene bazali lisusu te ;

bato ya kotiela motema bazali lisusu te

kati na bana na bato.

Bato nyonso bazali kokosana bango na bango,

bazali kolobana maloba ya sukali,

kasi mitema na bango ezali sembo te.

Tika ete Yawe aboma bato nyonso

oyo balobaka maloba ya sukali

mpe batondi na lolendo,

ba-oyo balobaka :

« Tokolonga na nzela ya lolemo na biso,

bibebu na biso ekolobela biso ;

nani akoluka kozala nkolo na biso ? »

Yawe alobi :

« Mpo ete bazali konyokola babola

mpe kolelisa bato oyo bakelela,

natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »

Maloba ya Yawe ezalaka peto

lokola palata oyo balekisi na moto

mpe bapetoli mbala sambo.

Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela,

okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.

Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai

soki bato bapesi bozoba lokumu.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.