Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 141

Simba ngai kati na loboko na Yo

Nzembo ya Davidi.

Yawe, nazali kobelela Yo ; yaka noki epai na ngai !

Yoka mongongo na ngai, wana nazali kobelela Yo !

Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala

lokola mbeka ya malasi,

mpe botombwami ya maboko na ngai ezala

lokola mbeka ya pokwa !

Yawe, kengela monoko na ngai,

batela malamu ekuke ya bibebu na ngai !

Kotindika motema na ngai te na mabe,

mpo ete namipesa te na mobulu

elongo na bato ya misala mabe

mpe nalia bilei te elongo na bango.

Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ;

soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ;

moto na ngai ekoboya yango te.

Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.

Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga ;

na bongo, maloba na ngai ekoyokana,

pamba te ezali kitoko.

Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele,

mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi.

Yawe, Nkolo na ngai,

miso na ngai ebaluki mpo na kotala Yo ;

nazali kobombama kati na Yo,

kotindika ngai na kufa te !

Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango

mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.

Tika ete bato mabe bakangama

na mitambo na bango moko,

mpe ete ngai naleka na kimia !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.