Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 140

Kangola ngai wuta na maboko ya bakosi

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Yawe, kangola ngai

wuta na maboko ya bato ya misala mabe !

Kokutanisa ngai te na bato na kanza.

Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango

mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.

Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka,

bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.

Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ;

kokutanisa ngai te na bato na kanza

oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !

Bato ya lofundu batieli ngai mitambo,

batandi basinga ya minyama na nzela

mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.

Nalobaka na Yawe :

« Ozali Nzambe na ngai ! »

Yawe, yoka mabondeli na ngai.

Oh Yawe, Nkolo na ngai,

ozali makasi ya lobiko na ngai,

obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.

Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe,

kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.

Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa

ekweyela bato oyo bazingeli ngai.

Tika ete makala ya moto esopanela bango !

Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto,

kati na mabulu ya potopoto

epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !

Batioli bakowumela te kati na mokili,

pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola

mpe alongisaka bato oyo bakelela.

Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo,

bato ya alima bakovanda liboso na Yo.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.