Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 142
Ozali ekimelo kaka moko mpo na ngai
Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.
Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe ;
na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.
Natalisi likambo na ngai liboso na Ye,
natandi pasi na ngai liboso na Ye.
Soki molimo na ngai elembi kati na ngai,
Yo oyebi epai nazali kokende.
Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.
Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala !
Moto ata moko te ayebi ngai lisusu,
nazali lisusu na ekimelo te,
moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !
Yawe, nagangi epai na Yo !
Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai,
libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »
Yoka koganga na ngai,
pamba te nazali na pasi makasi !
Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai,
pamba te baleki ngai na makasi.
Bimisa ngai na boloko
mpo ete nasanzola Kombo na Yo !
Bato ya sembo bakoya kozingela ngai
sima na Yo kosalela ngai bolamu.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.