Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 137

Pembeni ya bibale ya Babiloni

Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni,

tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.

Todiembikaki mandanda na biso

na banzete ya pepiliye ya etuka yango.

Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu

bazalaki kosenga biso banzembo ;

mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso

ete tozala na esengo.

Bazalaki koloba :

« Boyembela biso banzembo ya Siona ! »

Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini

na mabele ya bapaya ?

Oh Yelusalemi, soki nabosani yo,

wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !

Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi,

soki natie yo te liboso ya esengo nyonso,

wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !

Yawe, kobosana te bato ya Edomi

oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ;

bazalaki koganga :

« Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »

Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo,

esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe

oyo osalaki biso !

Esengo na moto oyo akokanga bana na yo

mpe akonika bango na libanga !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.