Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 136

Bolingo ya Yawe ewumelaka seko na seko

Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Bosanzola Nzambe ya banzambe ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Bosanzola Nkolo na bankolo ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Akelaki likolo na mayele na Ye ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Atandaki mabele na likolo ya mayi ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

moyi mpo na kongengisa mokolo ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

na nguya monene ya loboko na Ye ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Abetaki bakonzi minene ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Abomaki bakonzi ya nguya ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Akabaki mabele na bango lokola libula ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Akanisaki biso tango basambwisaki biso ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Apesaka bilei na bikelamu nyonso ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Bosanzola Nzambe ya likolo ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.