Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 138

Nalingi koyemba bolingo ya Yawe

Nzembo ya Davidi.

Nasanzolaka Yo na motema na ngai mobimba ;

nayembelaka Yo banzembo liboso ya banzambe.

Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule

mpe nasanzolaka Kombo na Yo

mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo,

pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango

na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.

Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai,

otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.

Yawe, bakonzi nyonso ya mabele bakokumisa Yo

tango bakoyoka maloba kobima na monoko na Yo ;

bakoyemba na tina na banzela ya Yawe,

pamba te nkembo na Yawe ezali monene.

Atako Yawe atombwama,

atalaka bato oyo bamikitisa

mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.

Tango pasi ekweyelaka ngai,

obatelaka bomoi na ngai,

osembolaka loboko na Yo

mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ;

mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.

Yawe akokisaka makambo nyonso

mpo na bolamu na ngai.

Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko !

Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.