Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 124

Lisungi na biso ewutaka epai ya Yawe

Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Soki Yawe abatelaki biso te ;

tika ete Isalaele aloba bongo !

Soki Yawe abatelaki biso te

tango bato babundisaki biso,

mbele bamelaki biso ya bomoi

tango basilikelaki biso makasi.

Boye mayi elingaki kozindisa biso,

mbonge makasi elingaki komema biso.

Mayi makasi elingaki kozindisa biso.

Tika ete Yawe apambolama,

Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso !

Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo

ya mokangi bandeke ;

motambo ekatanaki, mpe tokimaki.

Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.