Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 123
Wana tozali kozela ngolu na Ye
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe,
oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.
Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango,
mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi,
ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala
Yawe, Nzambe na biso,
kino asalela biso ngolu.
Yawe, salela biso ngolu,
yokela biso mawa !
Pamba te tolembi kotiolama !
Tolembi penza kotiolama
na bato ya lolendo mpe ya lofundu !
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.