Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 122
Bosambela mpo na kimia ya Yelusalemi
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Nasepelaka tango balobaka na ngai :
« Tokende na Tempelo ya Yawe ! »
Yelusalemi, makolo na biso etelemi
na bikuke na yo !
Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ;
engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.
Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe,
kolanda mibeko kati na Isalaele,
mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.
Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato
oyo basalelaka bosembo ezali kuna,
bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.
Bosenga kimia ya Yelusalemi !
Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi,
babika na kimia !
Tika ete kimia ezala kati na yo
mpe kati na bandako na yo ya bokonzi !
Likolo ya bolingo na ngai
mpo na bandeko mpe balingami na ngai,
nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo ! »
Likolo ya bolingo na ngai
mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso,
nasengi bolamu mpo na yo.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.