Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 121

Yawe, Mosungi mpe Mobateli na ngai

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :

lisungi na ngai ekowuta wapi ?

Lisungi na ngai ewutaka na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ;

Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

Te, Ye oyo abatelaka Isalaele

animbaka te mpe alalaka pongi te !

Yawe azali mobateli na yo ;

Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

lokola elili oyo ebatelaka yo.

Ezala na moyi to na butu,

moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

Yawe akobatela yo na mabe nyonso,

akobatela bomoi na yo ;

Yawe akobatela kokende

mpe kozonga na yo,

sik’oyo mpe libela na libela.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.