Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 125

Kimia ya solo

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe.

Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe

bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te,

oyo epikama mpo na libela.

Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi,

ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye,

kobanda sik’oyo kino libela na libela.

Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo,

mpo ete basangana te na mabe.

Yawe, zala malamu mpo na bato malamu

mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema !

Kasi tika ete Yawe abengana

bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe !

Tika ete kimia ezala na Isalaele !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.