Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Yobo 26

Eyano na Yobo epai ya Bilidadi

Yobo azongisaki :

« Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi,

ndenge osungi loboko oyo elembi !

Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya,

mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !

Ozwi maloba oyo wapi ?

Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?

Bakufi balengaka na se ya mayi

mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.

Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu,

mpe libulu ya molili ezali polele.

Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te,

atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,

akangaka mayi kati na mapata,

kasi mapata epasukaka te ;

azipaka kiti ya bokonzi na Ye,

atandaka mapata na likolo na yango ;

akataka mondelo na likolo ya mayi,

na suka ya pole mpe na molili.

Makonzi ya Lola ezali kolenga

mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.

Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ;

mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.

Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko,

loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.

Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke

ya misala na Ye

mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka,

nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.