Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Yobo 27
Yobo akobaki koloba :
« Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai,
na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
oyo atungisi motema na ngai,
wana ngai nazali nanu na bomoi,
mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,
bibebu na ngai ekoloba mabe te,
mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te.
Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino !
Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola
boyengebene na ngai,
nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ;
motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.
Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe,
mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo !
Elikya nini moto mabe azali na yango
tango Nzambe azwi bomoi na ye ?
Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye
tango pasi ekomelaki ye ?
Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ?
Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe,
nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Bino nyonso, boyebi yango malamu !
Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?
Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe,
libula oyo moto ya mobulu azwaka
epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso :
Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele,
mopanga ezali lifuti na bango,
bakitani na ye bakokufa na nzala,
bokono oyo ebomaka ekoboma bato na ye,
oyo bakotikala na bomoi,
mpe basi na bango oyo bakufisa mibali bakolela bango te.
Ata soki asangisi palata lokola putulu
mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,
nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango,
mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye.
Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu,
lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka.
Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ;
tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.
Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela ;
na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.
Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye,
mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye.
Bakobwakela ye makonga na mawa te,
ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto
oyo azali kobwakela ye yango.
Bakobetela libebi na ye maboko,
mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.