Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Yobo 25

Maloba ya misato ya Bilidadi

Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :

« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ;

atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ?

Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?

Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ?

Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?

Soki kutu sanza ezali kongenga te,

mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,

toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi,

mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.