Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Yobo 24

Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te

mpo na esambiselo ?

Mpo na nini bato oyo bayebi Ye

basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?

Bato bapusaka bandelo,

bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki,

babotolaka ane ya mwana etike

mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali

ya mwasi oyo akufisi mobali ;

balongolaka babola na nzela,

mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama.

Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongo

na mosala mpo na koluka biloko ya kolia,

kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei ;

bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele

mpe balokotaka bambuma

oyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe.

Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba,

bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili ;

bapoli na mvula ya ngomba,

bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama.

Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye,

bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.

Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu ;

bamemaka maboke ya nzete ya ble,

kasi bazongaka kaka na nzala.

Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu,

bakamolaka bambuma ya vino,

kasi bazongaka kaka na posa ya komela.

Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka,

mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga

mpo na koluka lisungi,

kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.

Bato oyo bazali kosala bongo,

bazali kotombokela pole,

bayebi nzela na Ye te

mpe batambolaka ata kati na yango te.

Mobomi azali kotelema na moyi

mpe koboma mobola elongo na moto akelela ;

na butu, azali lokola moyibi.

Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota ;

amilobelaka : ‹ Moto moko te akomona ngai, ›

mpe abombaka elongi na ye.

Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato ;

kasi na moyi, bamikangelaka na ndako,

bazali koboya pole.

Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo,

somo ya molili ekomaka moninga na bango.

Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi,

eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka,

yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.

Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe,

ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelaka

bato oyo basalaka masumu.

Libumu ya mama ebosanaka bango

mpe bankusu esepelaka kolia bango.

Bakanisaka bango lisusu te,

pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.

Bato mabe basepelisaka basi bazangi bana

mpe bato oyo babotaka te,

kasi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali.

Kasi Nzambe, na nguya na Ye,

abakisaka mikolo ya banyokoli na bango ;

ata batombolami, bazalaka na elikya te

mpo na bomoi na bango.

Nzambe apesaka bango kimia,

kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.

Mpe atako sik’oyo bazali bato minene,

na tango moke bakozala lisusu te,

bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso,

bakokatama lokola mito ya ble.

Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai

ete nazali koloba lokuta ?

Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.