Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 83

Telemela banguna na Yo

Nzembo ya Azafi.

Oh Nzambe, kovanda nye te !

Nzambe, kokanga monoko na Yo te,

kotikala kimia te !

Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka ;

tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola

mito na bango !

Bazali kosalela bato na Yo likita,

kokanela bato oyo obatelaka.

Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso

mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te,

mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »

Basangani mpe bayokani,

basali boyokani mpo na kotelemela Yo :

bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli,

bato ya Moabi mpe bato ya Agari,

Gebali, Amoni mpe Amaleki,

bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.

Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango

mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.

Sala bango ndenge osalaki Madiani,

ndenge osalaki Sisera mpe Yabini,

kuna na mayi ya Kishoni.

Babebisamaki na Eyini-Dori,

bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.

Sala bato na bango ya lokumu

ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi ;

mpe sala bakambi na bango

ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna

oyo bazalaki koloba :

« Tobotola mabele ya Nzambe ! »

Nzambe na ngai, balola bango

lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.

Ndenge moto ezikisaka zamba,

ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,

landa bango na nzela ya mopepe na Yo

mpe bangisa bango

na nzela ya mopepe makasi na Yo !

Yawe, tondisa bilongi na bango na soni

mpo ete baluka Kombo na Yo !

Tika ete soni mpe somo makasi elata bango

mpo na libela !

Tika ete bakufa na soni !

Tika bayeba ete Yo,

oyo Kombo na Yo ezali Yawe,

ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo

kati na mokili mobimba !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.