Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 82

Nzambe asambisaka bakambi ya bikolo

Nzembo ya Azafi.

Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye,

azali kokata makambo kati na banzambe.

Kino tango nini bokokata makambo

na bosembo te

mpe bokokotela bato mabe ?

Bolongisa moto oyo azangi makasi

mpe mwana etike,

bokata likambo ya moto ya mawa

mpe ya mobola ;

bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi

mpe na mobola,

bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.

Bazangi boyebi mpe bososoli,

bazali koyengayenga kati na molili ;

miboko nyonso ya mokili ezali koningana.

Nalobaki : « Bozali banzambe,

bozali bino nyonso bana

ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »

Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso

mpe bokweyaka lokola bakambi.

Nzambe, telema, sambisa mokili ;

pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.