Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 5

Yawe, tambolisa ngai na nzela na Yo

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na flite.

Oh Yawe, yoka maloba na ngai,

sosola tina ya kolelalela na ngai.

Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai,

yoka koganga na ngai

wana nazali kosenga lisungi,

pamba te nazali kobondela nde Yo.

Yawe, na tongo, oyokaka mongongo na ngai ;

na tongo, nabelemaka mpo na kosenga epai na Yo

mpe nazelaka.

Pamba te ozali Nzambe te oyo asepelaka na mabe,

mpe moto mabe akoki kutu te kovanda elongo na Yo.

Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo.

Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.

Obomaka bato oyo balobaka lokuta.

Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.

Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene,

nakoki kokota kati na Ndako na Yo,

nakoki kofukama mpo na botosi

epai ya Tempelo na Yo ya bule.

Yawe, tambolisa ngai na bosembo na Yo,

pamba te nazali na banguna ;

bongisa nzela oyo olingi ete natambola na yango.

Minoko na bango elobaka kaka lokuta,

mitema na bango etondi na mabe.

Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama,

mpe bakosaka na nzela ya lolemo na bango.

Oh Nzambe, katela bango etumbu.

Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi.

Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango,

pamba te batombokeli nde Yo.

Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo

lokola ebombamelo na bango

bazalaka na esengo tango nyonso,

tika ete bayembaka mpo na esengo,

bomoi na bango mobimba.

Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo

basepelaka kati na Yo.

Oh Yawe, solo, opambolaka bato ya sembo

mpe ozingelaka bango na nzela ya ngolu na Yo

lokola na nzela ya nguba.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.