Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 4

Yawe apesaka kimia

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.

Nzambe, bosembo na ngai,

soki nabeleli Yo, yanola ngai.

Kangola ngai na pasi,

salela ngai ngolu,

mpe yoka libondeli na ngai.

Bino bato, kino tango nini bokoyokisa

nkembo na ngai soni ?

Kino tango nini bokomisepelisa

na makambo ya pamba

mpe bokolanda makambo ya lokuta ?

Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko

mosali oyo azali sembo na miso na Ye ;

Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.

Soki bosiliki, bosalaka masumu te ;

soki bolali na mbeto,

bolukaka kososola makambo

mpe bovandaka kimia.

Bobonzaka bambeka kolanda mibeko

mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.

Bato mingi bazali kotuna :

« Nani akomemela biso bolamu ? »

Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.

Tondisa motema na ngai na esengo

soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia,

pamba te, Yo moko Yawe, osalaka

ete navanda na kimia.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.