Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 24

Yawe akoti na Tempelo

Nzembo ya Davidi.

Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango

ezali ya Yawe.

Mokili mpe ezali ya Yawe,

elongo na bavandi na yango.

Pamba te ezali Yawe nde atia yango

na likolo ya bibale minene

mpe apikaki yango na likolo ya miluka.

Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ?

Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?

Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto,

oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko

mpe alapaka ndayi ya lokuta te.

Yawe akopambola ye ;

mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.

Ndenge wana nde ezali,

ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo,

ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.

Bino bikuke, botombola mitondo na bino !

Bino bikuke ya kala, bomitombola !

Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?

Ezali Yawe, Elombe ya nguya ;

Yawe, Elombe ya bitumba.

Bino bikuke, botombola mitondo na bino !

Bino bikuke ya kala, bomitombola !

Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?

Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga,

nde azali Mokonzi ya nkembo !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.