Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 23
Yawe azali Mobateli na ngai
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali mobateli na ngai,
nakozanga ata eloko moko te.
Apemisaka ngai na matiti ya mobesu,
mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia.
Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai,
akambaka ngai na banzela ya bosembo
mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku
oyo etondi na molili ya kufa,
nakobanga mabe ata moko te,
pamba te ozali elongo na ngai,
nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,
mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Obongisaka mesa mpo na ngai
na miso ya bayini na ngai,
opakolaka moto na ngai mafuta
mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.
Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;
mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe
kino suka ya bomoi na ngai.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.