Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 130

Wuta na mozindo ya pasi

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.

Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !

Nkolo, yoka ngai !

Yoka mabondeli na ngai !

Yawe, soki obosanaka masumu te,

Nkolo, nani akokaki kotelema ?

Kasi bolimbisi ezali epai na Yo,

yango wana basengeli kotosa Yo.

Na motema na ngai mobimba,

nazali na elikya kati na Yawe,

nazali penza na elikya ;

nazali kozela maloba na Ye.

Nazali na elikya kati na Nkolo

koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo,

koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.

Isalaele, tia elikya kati na Yawe,

pamba te azali bolingo,

mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.

Ye nde akokangola Isalaele

na bambeba na yango nyonso.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.