Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 129

Banyokoli ngai mingi, kasi nalembi te

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele.

Tika ete Isalaele ezongela koloba :

« Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele,

kasi batikali kolonga ngai te ! »

Bato mabe batimoli mokongo na ngai,

bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.

Kasi lokola Yawe azali sembo,

akati basinga ya bato mabe.

Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona

bakufa soni mpe bazonga sima !

Tika ete bakoma lokola matiti

oyo ebotaka na likolo ya ndako

mpe ekawukaka liboso ete balongola yango ;

tika ete mobuki bambuma ya bilanga

atondisa na yango te maboko na ye,

tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa

na yango te saki na ye.

Tika ete baleki nzela baloba na bango te :

« Tika ete Yawe apambola bino ! »

Topamboli bino na Kombo na Yawe !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.